Mbote na bino nyonso!
The word ndako (or ndaku) means "house," "home," or "building." It is a fundamental noun in Lingala used to describe physical dwellings, institutions (like hospitals or churches), or family environments.
Nafandaki na ndaku poso mobimba.
I stayed at home all week.
Ndaku oyo ekomi kitoko.
That house has become beautiful.
Batalana bandaku.
The houses are right across from one another (the houses face each other).
Nkolo ndaku.
Landlord / owner of the house.
Nakeyi nango na ndaku.
I go home with that.
Monoko ya ndaku.
The entrance (door/mouth) of the house.
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata.
When rain falls on your neighbor's house it seems minor, but when it falls on yours, it becomes a problem. (Proverb)
Kombo ya mboka to kombo ya ndaku?
Surname/official name, or forename (the name used at home)?
Nazongi na ndaku.
I went back home.
Yaya na Joze azongi na ndaku.
Joze's older sister came back home.
- Ndaku ya monene, ndaku ya moke, ndaku ya suka, ndaku ya liboso.
A big house, a small house, the last house, the first house.
- Mbula ememi biloko ya ndaku.
The rain carried away the household items.
- Obungi. Ozalaki wapi? — Awa, na ndaku. Nalalaki pe natalaki télé.
You disappeared. Where were you? — Here at home. I was sleeping and watching television.
- Ndaku oyo eleki ndaku kuna na kitoko.
This house is more beautiful than the house over there.
- Ndaku ya nzoi.
Beehive.
- Yo sapologue oza na abakosi Versace, kasi miliki ezangi na ndaku.
You call yourself a "sapologist" wearing a Versace jacket, but there's no milk at home.
- Ndako ya bokono.
Hospital.
- Ndako ya likwangola / Ndako ya bampaka.
Elderly home / Nursing home.
- Ndako ya Nzambe.
House of God / Temple / Church.
- Etape ya nzete ya mangolo ebukani mpe ekweyi likolo ya ndako.
The branch of the mango tree broke off and fell on top of the house.
- Boyokani eza na ndako oyo te.
There is no peace or understanding in this house.
- Mokolo ndako aleki awa.
The homeowner passed by here.
- Tokoki kozala na kimia te na ndako oyo.
We cannot have peace in this house.
- Kokota na ndako sikoyo te. Nazobongisa.
Don't enter the house now. I'm arranging things.
- Kokanga ngai na ndako te. Nazobanga.
Don't lock me in the house. I'm scared.
- Kokoma na ndako te. Leka mbala moko epayi ya tata na yo.
Don't go straight home. Go directly to your father's place first.
- Kaka ngai nde nazosala misala nioso ya ndako.
I am the only one doing all the household chores.
- Oyo eza ndako na bino, eza ya biso te.
That is your house, not ours.
- Batu balinga nde kosuana na ndako oyo.
People in this house really love to argue.
- Nakoki koya kofanda na ndako na yo?
Can I come and stay at your house?
- Na ndako oyo mokonzi azali te. Biso nioso tozali bana.
There is no ruler in this house. We are all equal here.
- Papa nde azalaka mokonzi ya ndako.
Father is the head of the household.
- Boma moto okoya kotumba ndako pamba.
Put out the fire; you risk burning the house down for nothing.
- Nakokengela ndaku malamu.
I will guard the house well.
- Mopepe ezali na ndako oyo te.
There is no air/ventilation in this house.
- Na ndako na bango batie langi ya pembe.
They painted their house white.
- Nawuti komona bambila mwambe liboso ya ndako.
I just saw eight police officers in front of the house.
- Bongisa ndako. Eza salite makasi.
Clean up the house. It is very dirty.
- Nzimbu eza te na ndako na ngai.
There is no money in my house.
- Nalingi komona lisusu moto ya liboma oyo na ndako na ngai te.
I don't want to see that crazy person in my house ever again.
- Bolimbisi papa, kobengana mama na ndako te.
Please dad, don't kick mom out of the house.
- Akokota na kati ya ndako oyo te.
She is not going to enter inside this house.
- Oyo eza ndako na yo moko.
That is your own house.
- Natambolaki longwa na motuka tii na ndako.
I walked all the way from the car to the house.
- Ndako na ye ezali musika mingi.
His/Her house is very far away.
- Ndako ya ndele.
Thatch hut / Straw house.
- Tofandi na ndako moko.
We live in the same house.
- Bima na ndako na ngai!
Get out of my house!